XIO

xWire

Posts from every feed QUEST has found across the web — blogs, news, podcasts, channels and more.

Vatican News - Lingála

Nsango uto Vatican- Nsango etali Eklezia

Esámbiselo yokó ya Malte epesi milio 24,1 ya euro na IOR lifuta mpo ya mabé esálema

Esámbiselo yokó ya Malte epesaki etúmbu na bakompani mineí ya kofúta milio 24,1 ya euro, bibakisami na matómba, na IOR (Institut pour les Œuvres de la Religion), esika yokó ya misála ya eyamba mpo ya bozangi obligation fiduciaire na bangó na likambo ya fonds Kappa, na bobwaki bongo babosenga na bangó ya botelemeli IOR na bokáti likambo na eténi ya yambo.Tanga nionso

Léon XIV : Kosambela elongo mpe na mpó ya bawei, mpo na kosepela bomoi.

O mokolo moye mwa 5 ya sànzà ya zomi na moko, Pàpa akambaki misa ya baepiskopo ba lokumu mpe ba espiskopo bawàki na mobù moleki na baziliki Saint-Pierre. Na tango ya mateya, alobelaki ntina ya kosambela na mpó mpe elongo nà bawei. Akundoli ‘te elongà ya liwà ekowùta na mobombamo ya Pasika, epai wapi tokokola na elikya ya bokutani nà kristu elongo nà basantu.Tanga nionso

Likita lya bansó: «Motéma ya nkita ezali mosála», elobi Papá

Na litéya ya mokolo eye ya misáto, Papá alobaki 'te «bozangi mosála, bobúbi mpe bizaleli ya mosála bikotiya na likámá bokólóngóno bwa nzóto mpe kútu bomoí bizali ya kondima te». Alendisaki politiki yokó eye «ekobatela bampótá ya bato mpe ya baye bakobika na bozangi bosémbo». «Ezali kaka epái ya bolámu ya bansó ndé esengeli kokende bosáleli ya bokónzi ya politiki», elobaki Léon XIV.Tanga nionso

Bahindu mpe bakristu basangani mpo ya kosála milongó ya sika mpo ya boboto

Na mokánda mókó ya bolobi bampósá o eleko ya Diwali, yokó ya baféti ya ntina na linaka ya bahindu (hindous) esepelamaka na 8 ya sánzá ya zómi na mókó, dicastère mpo ya Bososoli káti ya biyamba elobi 'te lisoló, «likambo ya ntina mpo ya bomoí», ezali o káti ya «molimo y'Assise», bokútani boná elingami na sántu Yoane-Polo II na batindami ya biyamba ya mokili. «Mingi bondeko ekokola káti na biso, mingi boboto ekolenda na mokili», tokoki kotánga.Tanga nionso

Léon XIV: Boyambi ebengami ya kokóma mimeseno, mpo ya kosimba moto nionso

Papá akobaki litéya na ye ya Mobéko-likonzi Gaudium et Spes ya Concile Vatican II, na bolobi boyókani makási káti ya boyambi mpe mimeseno. Alobaki lisusu 'te Eklezia ekokende elongo na ndéngé ya lisapo na botomboli moto mpo ya bokoti na mimeseno minsó ya mokili, na komitála na ekóló lyokó te, mpo ya kopesa ntina na eye ezali ya malámu mpe ya sóló na mókó mókó na bangó zambi ya kopesa Nsango-Ndamu.Tanga nionso

Bokongoli na Vatican mpo ya Ukraine, «litatoli lyokó ya kitoko ya Eklezia»

Likanisi etiami na nsé ya elembo ya bosálisani ewuti kosila na Vatican mpo ya ekóló ená ya Poto ya Monyele esika wápi Mgr Luis Marín de San Martín azelami mokolo ya 27 ya sánzá ya zómi. «Nazali na botóndi mingi na likabo eye bolakisi, eye ekotatola boyóki bokó ya mozindo -elobi ye- epái ya monyokoli ya bandeko babáli mpe bási ya Ukraine».Tanga nionso

Likita lya bansó: bomoí, mbala mókó epesami, esengeli kobátelama na makási

Bobóti ya bolingo ya mobáli mpe mwási ekolakisamaka «na mbótáma ya bána, likabo ya ntina koleka ya libala», elobaki Papá, mokolo ya 21 ya sánzá ya zómi, na litéya na ye esakolamaki libosó ya bandimi ebelé. Na bosimbi Mobéko-likonzi Gaudium et spes ya Concile Vatican II, Mokitani ya Petelo alendisaki baye bansó bazali na mikúmbá káti ya bato, mpenza na makambo ya politiki mpe momeseno, ya «kosálisana na molendé mpo ya bokolisi ya libala mpe ya libótá».Tanga nionso

N'Angélus, sima ya lipáso na ye, Papá apesi melesi na bandimi mpo ya nsámbo na bangó

Atá mpóso mókó ekoki te sima ya lipáso na ye na mompúlúlú, Papá Léon XIV alobaki bomanyoli na ye úto linanisa ya bandáko na ye na Vatican. Na botelemi na liloba ekende nsango ezuami na Nsango-Ndamu ya sántu Mateo (Mt 22, 15-21), «Bopesa bôngó na Kaizaro eye ezali ya Kaizaro», Léon XIV alobaki lisusu 'te Bokónzi ya Nzámbe «eboyi misála mpe mikúmbá ya bato te», kasi ekobimisa nionso eye «ezali na litómba ya sémba te».Tanga nionso

Paláta «Papá Léon XIV», bokambi ya mokúmbá ya nzinganzinga

Préfet ya kála ya dicastère mpo ya Mosála ya Botomboli moto mobimba azuaki mokolo ya mibalé 13 ya sánzá ya zómi na mpokwa, na Borgo Laudato si' ya bandáko ya papá ya Castel Gandolfo, paláta «Papá Léon XIV» epesamaki na etéyelo ya likoló ya Villanova. Episkopo ya lokúmu Fabio Baggio, pro-préfet ya dicastère, alendisaki ya «kokela bandakisa ya sika, biye bikosangisa mokúmbá ya nzinganzinga mpe botomboli ya moto». Tanga nionso

Bolengé ya Fránsa na nkandá, Eklezia ekoyóka

Úto bampóso ebelé, bána kelasi mpe bayékoli ya bitéyelo ya likoló bakotambola bipái binsó na Fránsa mpo ya kotelemele bizalela na bangó ya boyékoli mpe ya kelasi. Baaumônier katoliko bakomeka koyóka mpe kokende elongo na nkandá waná ya bolengé bokó na boluki ntina. Lisoló na mokambi ya mosála ya bobáteli milimo ya mibú 18-35 ya dioceze ya Créteil, na monyele ya Paris Tanga nionso

Mgr Gallagher: bogangi ya mwána mókó mókó akima ndáko ekosimba motéma ya Nzámbe

Secrétaire ya Baboyókani na Bikóló mpe masangá ya mokili akambaki, na 11 ya sánzá ya zómi, misa mókó na basilique Notre-Dame ya Genève, na Suisse, na libakú ya Mokolo ya 112 ya mokili ya bamigrant mpe babombami, ebonzami na likambo-likonzi «Atá mókó kaka ya bána waná». Episkopo alobaki lombango ya «kopesa biléi na baye bazali na nzala», ya «kobátela baye bazali na likámá» mpe ya «kopesa esika ya kobombana na baye bazangi nsambá», na bondimi «lokúmu ya moto». Tanga nionso

Mpo ya koningana ya mabele na Panama, Eklezia elakisi solidarité na yango mpe esengi losambo

Ut’o Roma, Mgr José Domingo Ulloa alakisi bozali pembeni nà mabota ya bato ya Panama. Asengi na bango bàsala na bokengi mpe bàlanda malako ma bakonzi, nsima ya likàma liye. Episkopo-Mokonzi oyo, azali kosangana na likita Léon XIV abongisaki, oyo esangisaki bakonzi mpe batindami ya baeklezya ya Orient, makita ya baepiskopo, biteyelo ya likóló, mpe banzeneneke ya bolingo mpe ya bomoi. Esalemi na libakù lya “mibù zomi ya Amoris Laetitia”. Tanga nionso