XIO

xWire

Posts from every feed QUEST has found across the web — blogs, news, podcasts, channels and more.

Vatican News - Lingála

Nsango uto Vatican- Nsango etali Eklezia

Episkopo ya lokúmu Turkson alendisi bakatoliko y'Afrika ya kobika lokolá Libótá ya Nzámbe ya sóló

Episkopo ya lokúmu Peter Turkson, lokolá Chancelier y'Akademi ya Papá ya banzebi mpe Akademi ya Papá ya banzebi ya bato, azali úto 19 kinó 21 ya sánzá ya zómi na mókó, na Liyangani ya bikóló ya panafrika eye ekosálema na etéyelo ya likoló Tangaza ya Nairobi, na Kenya. Na lisikulu na ye, episkopo ya lokúmu Turkson abéngaki bakatoliko y'Afrika ya komitika na libabé te mpe ya kokóma basáli ya bozongisi bondeko, bosémbo mpe bozongisi ya sika.Tanga nionso

Bikéla to misàlà mya ngambo ya Moniele (Orient) – 20 novembe 2026

Omokolo mwa 14 ya sànzà ya zomi na moko na Syrie, Mgr Jean-Abdo Arbach, episkopo-monene ya melkite ya Homs, abundisamaki na ndenge ya somo. Kobundisa moko ezali kolakisa klima ya bokóbi bozangi bokengi oyo bakristu bazali kokutana na yango na Syrie. Na bomoko, bapatriarche basato ya Damas, bazali kobelele mpe bazali kokweyisa bolembu ya bakonzi na kozanga kobatela bana mboka.Tanga nionso

Na Bethléem, episkopo ya lokúmu Gugerotti abiangi kolona elikya

Na mokolo ya mibalé ya botáli na ye ya mobáteli na Mabelé Esántu, préfet ya dicastère mpo ya Baeklezia ya Monyele akotaki na limemya na basilique ya Mbótama, esika wápi alekisaki bosálisani ya Papá na bakristu ya Palestine: «Tokoki kobúngisa binó te». Kaka mokolo waná, akútanaki na bána bayókaka malámu te ya etéyelo ya Papá Effetà, bayékoli ya etéyelo ya likoló ya Bethléem mpe bakambi musulman ya etuka.Tanga nionso

Liyangani ya bikólo ya Afrika mobimba na 2026 na Tangaza, Eteyelo ya likólo na Kenya

Eteyelo ya Tangaza efungolaki, o mokolo mwa 19 novembe 2026, Liyangani ya bikólo ya Afrika mobimba (Conférence internationale panafricaine). Motó ya likambo ezali: «Monzoto mwa Elikya (Constellations d’espoir): Afrika mpe mbongwana ya Eklezya na makanisi ma Benoît XVI ». Prof. Patrick Mwania, vice-chancelier mpe recteur ya Eteyelo ya likólo ya Tangaza, alimboli ntina bàponi motó ya likambo liye mpe mbuma likita liye esengeli kobota mpo na Letà mpe na Eklezia.Tanga nionso

Na Syrie, batómoló bakristu babeleli na «bamobúlú ya mbala na mbala»

Na Syrie, bakambi ya Baeklezia ya bakristu babimisi «bobángi na bangó ya makási» sima ya molongó mókó ya bamobúlú. Na nsakola yokó ya lisangá ebimaki mokolo ya mibalé 17 ya sánzá ya zómi na mókó, batungisami na «bamobúlú ya mabé mpe ya mbala na mbala», biye bikoluka biyamba bizali na bato moke, káti waná «bakristu mpenza», bazuami bangó lokolá na eleko yokó ezua elembo ya bamobúlú mibú mibalé sima ya eleko y'Assad.Tanga nionso

Likita lya bansó: Papá azongeli bambuma ya mobémbo na ye n'Amerika ya latin

Mokolo elandi bozongi na ye na Roma sima ya mikolo zómi na mókó bileki n'Amerika ya latin, mokolo ya misáto eye 18 ya sánzá ya zómi na mókó, Léon XIV abongisaki litéya na ye na bambuma ya mobémbo na ye ya bontómá ya mbala ya motoba. Na Uruguay, n'Argentine mpe na Péru, Papá akolikya 'te Mokónzi akokamba bato «na nzelá ya boboto, ya bosémbo mpe ya bondeko».Tanga nionso

Leon XIV : Kobanza liboso mpe kobundisa kobebisama ya nzoto ezali lolenge moko ya kobongwama na nzela ya Nsango Elamu

Na nsuka ya likita lya banso, Pápa akundolaki ‘te mokolo mwa 18 Novémbe ezali Mokolo mwa losambo mpo na bato oyo bazwaki makàmà mpe baye babikaki na kobebisama ya kosangisa nzoto. Kobundisa ba abus ebandi na koyoka bato oyo bazoki, kobenga mabe na nkombo na yango. Na mokolo moye mwa misato, Mokitani ya Petro alobelaki mpe molulu ya mokolo ya koboma mbisi na mokili mobimba, mokolo mwa 21 Novémbé.Tanga nionso

Pàpà apesi mbote ya nsuka na Amerika latina, na nsuka ya mobembo mwa yé ya ya bontómà ya mbala ya motobà

Bankóto ya bato balandaki molóngo ya mituka oyo ememaki Léon XIV na esika ya aeronavale oyo babéngaka Callao. Mpepo oyo esengelaki komema Pápa na Roma elongwaki na ngonga ya 14h28, na ngonga ya mboka na biso. Episkopo ya Roma akokóma na libándá ya mpepo ya Fiumicino na mokolo mwa mibale, mwa 17 novembe, na ngonga ya 10h25.Tanga nionso

Leon XIV apesi matondi na Pérou: “Na miyokaki lokola epai na ngai”

Yambo te apumbwa mpo ya kozonga na Roma, mpe na bosukisi ya mokolo mwa yé ya nsuka na Pérou, na nsuka ya misa ya mokolo mwa yambo, Pàpa apesaki melesi mp ona mobembo moye akaboli makanisi ma ntinta, mabina kitoko, maseka na nzela o kati ya papamobile, esengo ya bilenge. Na bandimi bayiké mpe na mboka na ye adoptif, Pàpa ayebisaki bang ona motema soke ‘te: “na miyoki lokola epai na ngai, mpe bokanisi ngai lisusu ‘te eklezya ezali libotà lyoko”.Tanga nionso

Kosala mobùlù epai na bato, ezali kosàlà yango na mabele, epaleli Pàpa na Amazonie

Na Pucallpa, ezali mbala ya yambo yoko Pàpa asala misa. Na tango ya misa, Leon XIV apaleli bozangi bikéla mpe bolembu ya makóki mpó ya kosàlela mpe kopetola ekéla,oyo eyikisami na kati ya zamba eye monene na mokili. Mpo ya kobotisa mbuma ya bomoi ya malamu, pàpa abyangi bato ya Pérou bakolisa makambo masato: boyambi, bomoto mpe esengoTanga nionso

Bato ya Cruceño bazali na molende mpo na episkopo na bango Léon

Leon XIV awuti kosilisa visite pastorali na Santa Cruz, mwa engumba moko moke na bangomba ya Andes. Yambo ‘te àsala misa kuna, akendeki na ndako-nzambe ya paloase, atambolaki na babalabala ya mboka wana ya mosika na diocèse ya Chiclayo, mpe akutanaki na esengo monene ya bandimi oyo basepelaki na komona moto oyo akozalaka kaka episkopo ya bango mpo na libela.Tanga nionso

Na bokuse, bilili bya mokolo mwa sambo ya mobembo mwa Pàpa na Amerika latina

Na mokolo mwa mosàlà minei, mwa 12 Novembe, Léon XIV akóbaki mobembo mwa yé ya bontóma na ekólo Pérou. Na manaka, ya mokolo na ye ya mibale na Lima: asalaki Bokutani nà baepiskopo, sima elandaki milulu mya ngonga ya midi na ndako-nzambe monene ya Lima. Sima akosangana na bokutani nà bato nkotó tukù minei (40 000) mpo na mikolo mikoyà ya bato ya Pérou mpe bokengi to veillé ya losambo elongo nà bilenge na stade national ya engumbaTanga nionso

Léon XIV akokisi elaká na Santa Cruz

Papá akosála misa mokolo ya mpóso eye na ntongo na Santa Cruz, etuka yokó ebombana ya Andes, na dioceze ya Chiclayo. Yambo ya kolongwa Péru mpo ya Roma na 2023, abongisaka kozonga o ntéi ya lisangá liná mpo ya kosepela mibú 350 ya Señor del Costado, mokambi ya paloise. Esika waná, ntángo bobongisi ekokoba makási, bato ya etuka bakokoka kaka te kondima bozongi ya Léon XIV káti na bangó.Tanga nionso

Na bokuse, bilili bya mokolo mwa motobà ya Pàpa na Amerika latina

O mokolo moye mwa 11 novembe, Leon XIV akobaki mobembo mwa yé ya bontómà, ya mikolo minei mpo mokolo mwa nsuka na Argentine, yambo ‘te apumbwa mpo ya kokende na Ekólo Perou. Na manaka ya mokolo, ebongisami na kokende kotàla bato na boloko, sima misa moko na libanda na polele. Na mpe emonisi mpepo na ye yango azali kokende na Perou, mpe koyamba bato mpe bakonzi ya letà ya Perou bayambaki ye.Tanga nionso

Pàpa apesi melesi na Argentine mpo na “boyambi na bolingi makasi

Na nsuka ya misa ya mokolo mwa 11 novembe na sanctuaire ya Luján, Leon XIV, na mai na miso, atondi botondi bato ya Argentine mpo bayambaki ye nà bolingo makasi. Sima ya lisukulu asalaki na bokuse, abonzelaki Notre-Dame ya Luján, fulele “Rosa ya wolo”, na lolenge ya momeseno ya devosyo ya pàpa. Na sima ya nzanga, bazalaki kozela yé bobele na Pérou, epai wapi akokóba mobembo mwa ye ya bontómà na bowumeli ya mokolo motoba.Tanga nionso

Na bokuse, bilili bya mokolo mwa mitano ya Pàpa na Amerika latina.

O mokolo moye mwa 10 novembe, Leon XIV akendaki na Córdoba, enguma ya mibale ya mboka. Kuna asalaki misa liboso lya nkoto nkamà motoba na tuku mitano ya bayambi. Na sima, Pàpa akendaki na katedrali ya engumba ena, mpo na kokutana nà baepiskopo, basàngó nà bamamelo, baseminariste mpe ba agents pastoraux. Mokolo mwango ekendaki kosuka na Buenos Aires, epai wapi Tata Mosantu asanganaki na veillé elongo nà bilenge ya Argentine pene ya miliyon moko.Tanga nionso

Na bokuse, bilili bya mokolo mwa minei ya Pàpa na Amerika latina

Ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan elakisi na bilili, mokolo mwa minei ya mobembo ya Pàpa na Amerika latina. O mokolo moye mwa 9 ya sanza ya zomi na moko, Leon XIV akutani bakóka, mpe asalaki misa na katikati ya mboka-mokonzi, yambo ‘te aloba n abato bamosàlà. Sima akambaki losambo la mpokwa na Katedrali ya Buenos Aires. Kuna, Leon XIV apesaki longonya na mo-Argentine oyo ye akitani.Tanga nionso